Instruments
Ensembles
Opera
Composers
Performers

Lyrics: Lokua Kanza. Toyebi Te. Ndagukunda Tshane.


Voix parlee :
Eh bino bokota na ndako
Na moni neti
Mbula elengi ebeta
Boya bokota na ndako

Olele eh eh mawa

Mama oyo abota ngai
Mwasi ya kitoko kati ya basi banso
Osala nionso po na ngai
Nakoma moto
Mama eloko nini nakoki kopesa yo
Olo moko te ekokani na bolingo
Oyo opesa ngai
Pauni moko te ekokani te na nionso osala
Po na ngai mama
Yo mama na ngai
Nasengi yo botondi
Na nionso osala po na ngai
Okolisa ngai na pasi

Voix off : na Kinshasa, Kauka

Okolisa ngai na minyokoli
Lelo nakomi moto
Eloko nini nakoki kopesa yo mama
Mama na ngai oh

Ndagukunda tshane

Mama Vero

Ndagukunda tshane

Mama na Shaba, mama na Didi, mama na Vero
Mama na Rene, mama na Ndobo, mama
Mame, mame

Ndagukunda tshane

Voix parlee : epayi ozali nkolo asunga yo

Tozalaka na mama oh
Totikala se na milelo ma
Mama akende
Mobembo bazongaka te
Mama na ngai oh
Ebale ya milelo
Mame mame mame
Yo yo mawa ebale ya milelo
Se milelo na mabako
Yango okozonga mokolo nini
Mama na ngai
Atendele
Tokokutana
Tokokutana